25 Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. 26 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba :
— Elima ! Elima ! Elima !
Bagangaki mpo na somo. 27 Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango :
— Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !