Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 14

28 Petelo alobaki na Ye :

Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.

29 Yesu alobaki na ye :

Yaka.

Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu. 30 Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki :

Nkolo, bikisa ngai !

31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye :

Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?

Veja também