Mwasi mopaya andimeli Yesu
21 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni. 22 Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga :
— Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye :
— Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
24 Yesu azongisaki :
— Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
25 Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki :
— Nkolo, sunga ngai !
26 Yesu azongisaki :
— Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
27 Mwasi yango alobaki :
— Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
28 Bongo Yesu alobaki na ye :
— Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !
Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.