Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 15

3 Yesu azongiselaki bango :

Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ? 4 Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa» 5 Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe 6 abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu» Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino ! 7 Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :

8 « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,

kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;

9 basambelaka Ngai kaka na pamba,

mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto»

Veja também