Yesu aleisi bato nkoto minei
32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki :
— Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
33 Bayekoli na Ye bazongisaki :
— Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?
34 Yesu atunaki bango :
— Bozali na mapa boni ?
Bayekoli bazongisaki :
— Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
35 Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. 36 Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato. 37 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. 38 Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.