Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 16

5 Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa. 6 Yesu alobaki na bango :

Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !

7 Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango :

Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !

8 Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki :

Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? 9 Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? 10 Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? 11 Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?

12 Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também