Yesu mpe Petelo bafuti mpako
24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki :
— Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?
25 Petelo azongisaki :
— Afutaka !
Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye :
— Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?
26 Petelo azongisaki :
— Bapaya.
Yesu alobaki na ye :
— Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te. 27 Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.