Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 18:1-5,10

Lingomba ya Masiya

Nani aleki monene ?

1 Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye :

— Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?

2 Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango 3 mpe alobaki :

— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. 4 Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. 5 Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.

Makebisi

(Mlk 9.42-48; Lk 17.1-2)

10 Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.

Lisese ya meme oyo ebungi

(Lk 15.1-7)

[

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.