Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe
15 Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.
21 Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki :
— Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ?
22 Yesu azongisaki :
— Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
33 Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »