Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 20:20,21,24-28

20 Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko. 21 Yesu atunaki ye :

— Olingi nini ?

Azongisaki :

— Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.

24 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana. 25 Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango :

— Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango. 26 Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ; 27 mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino ! 28 Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

Yesu abikisi bakufi miso mibale

(Mlk 10.46-52; Lk 18.35-43)

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.