Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 20

Yesu abikisi bakufi miso mibale

29 Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu. 30 Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki :

Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

31 Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi :

Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

32 Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango :

Bolingi nasala nini mpo na bino ?

33 Bazongiselaki Ye :

Nkolo, sala ete tomona.

34 Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.

Veja também