Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 21

Yesu akoti na Yelusalemi lokola Mokonzi

1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale. 2 Alobaki na bango :

Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango. 3 Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango» Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.

4 Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama :

5 « Boloba na Siona, mboka kitoko :

‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,

atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi,

na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama

oyo ememaka mikumba› »

6 Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango. 7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela. 9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :

« Ozana na Mwana na Davidi !

Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

Ozana na bisika oyo eleki Likolo »

10 Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna :

Oyo lisusu nani ?

11 Bato bazalaki kozongisa :

Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !

Veja também