15 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » 16 Balobaki na Yesu :
— Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ?
Yesu azongiselaki bango :
— Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te :
« Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana
oyo bazali nanu komela mabele,
ozwaki lokumu na Yo ? »