Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 22

Eyano ya Yesu na tina na lisekwa

23 Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :

24 Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi» 25 Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki ; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. 26 Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo. 27 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 28 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?

29 Yesu azongiselaki bango :

Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te. 30 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo. 31 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino : 32 « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.

33 Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.

Veja também