29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka,
« moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
minzoto ekokweya longwa na likolo,
mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.