Publicidade

Mateus 24

29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka,

« moyi ekokoma molili,

sanza ekongenga lisusu te,

minzoto ekokweya longwa na likolo,

mpe banguya ya Likolo ekoningisama»

30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene. 31 Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-