Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 24

3 Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :

Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?

4 Yesu azongisaki :

Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! 5 Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya» mpe bakokosa bato ebele. 6 Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.

Veja também