Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 26

Basaleli Yesu likita

1 Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye : 2 « Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu»

3 Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; 4 bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye. 5 Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka»

Basopeli Yesu malasi na Betani

6 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, 7 mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu. 8 Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki :

Mpo na nini kobebisa malasi boye ? 9 Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !

10 Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango :

Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu. 11 Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te. 12 Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai. 13 Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.

Yuda ateki Yesu

14 Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe 15 mpe atunaki bango :

Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ?

Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato. 16 Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.

Bilei ya suka

17 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu :

Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?

18 Azongiselaki bango :

Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo› »

19 Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.

20 Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale. 21 Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki :

Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.

22 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :

Nkolo, ezali ngai ?

23 Yesu azongisaki :

Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai. 24 Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.

25 Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki :

Moteyi, ezali ngai ?

Yesu azongiselaki ye :

Olobi yango.

26 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba :

Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.

27 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba :

Bomela yango bino nyonso ; 28 ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.

Veja também