Yuda ateki Yesu
14 Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe 15 mpe atunaki bango :
— Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ?
Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato.