Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 26

Yesu abondeli na Getisemane

36 Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango :

Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.

37 Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; 38 alobaki na bango :

Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.

39 Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye :

Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.

40 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo :

Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ? 41 Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.

42 Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki :

Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !

43 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. 44 Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana. 45 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango :

Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu. 46 Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.

Veja também