Mateya ya Yoane Mobatisi
1 Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda : 2 « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »
3 Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki :
« Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe :
‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo,
bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
4 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. 5 Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ; 6 bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.