Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 4

Komekama ya Yesu

1 Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye. 2 Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala. 3 Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye :

Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.

4 Yesu azongisaki :

Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,

kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe»

5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo 6 mpe alobaki na Ye :

Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama :

« Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo,

mpe bakomema yo na maboko na bango

mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te»

7 Yesu azongiselaki ye :

Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo»

8 Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ; 9 alobaki na Ye :

Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai.

10 Yesu alobaki na ye :

Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama :

« Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo,

mpe okosambelaka kaka Ye»

11 Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.

Veja também