3 « Esengo na babola na molimo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
4 Esengo na bato oyo bazali kolela,
pamba te bakobondisama !
5 Esengo na bato na komikitisa,
pamba te bakozwa mokili lokola libula !
6 Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo,
pamba te bakotondisama !
7 Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa,
pamba te bakoyokela bango mpe mawa !
8 Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,
pamba te bakomona Nzambe !
9 Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,
pamba te bakobengama bana na Nzambe !
10 Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
11 Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai ! 12 Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.