Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 5

Mateya na tina na bolingo

43 Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo 44 Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. 45 Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te. 46 Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ? 47 Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ? 48 Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.

Veja também