15 Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda. 16 Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ? 17 Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe. 18 Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu. 19 Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. 20 Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.
Bayekoli ya solo
(Lk 23.25-27)
21 Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo. 22 Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai :
‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›
23 Bongo Ngai, nakoyebisa bango :
‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›
Lisese ya batongi mibale ya ndako
(Lk 6.47-49)