Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 7:7-11

7 Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; 8 pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango. 9 Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa ? 10 To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi ? 11 Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?

(Lk 6.31)

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.