2 Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
3 Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ; 4 mpe Yesu alobaki na ye :
— Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.