Yesu aleki mopepe na nguya
23 Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 24 Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga :
— Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
26 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?
Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. 27 Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »