Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 9

2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :

Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.

3 Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :

Moto oyo azali kotiola Nzambe !

4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango :

Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ? 5 Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola » 6 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.

Bongo alobaki na ebosono :

Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.

7 Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.

Veja também