20 Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, 21 pamba te azalaki komilobela :
— Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki :
— Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.
Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.