Lokumu epai ya Nzambe
33 Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe
ezali na mozindo mingi !
Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye
mpe kososola nzela na Ye !
34 « Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ?
Nani akomaki kopesa Ye toli ?
35 Nani apesaki Nkolo eloko
mpo ete Nkolo azongisela ye ? »
36 Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye,
na nzela na Ye mpe mpo na Ye.
Tika ete nkembo ezonga epai na Ye
mpo na libela na libela ! Amen !