Kimia elongo na Nzambe
1 Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto 2 oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe. 3 Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, 4 koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.