Bolingo ya Nzambe epesaka elikya
31 Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ? 32 Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ? 33 Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.