Bolingo ya Nzambe epesaka elikya
31 Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ? 32 Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ? 33 Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo. 34 Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso. 35 Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ? 36 Kolanda ndenge ekomama :
« Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ;
bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »
37 Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso. 38 Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, 39 banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.