Pular para o conteúdo
Publicidade

Rute 1

8 Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi :

Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko. 9 Tika ete Yawe apesa na moko na moko na bino bopemi kati na ndako ya mobali mosusu.

Bongo Naomi apesaki bango beze, mpe balelaki makasi. 10 Sima, balobaki na ye :

Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo.

11 Kasi Naomi azongiselaki bango :

Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ? 12 Bana na ngai, bozonga epai na bino ; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali, 13 boni, bokokoka penza kozela kino bakokola ? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango ? Te, bana na ngai ! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi.

14 Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.

Veja também

Rute
Ver todos os capítulos de Rute