14 Basi balobaki na Naomi :
« Tika ete Yawe akumisama ;
Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te
kozanga mosikoli oyo kombo na ye
ekokende sango kati na Isalaele !
15 Akoyeisa bomoi na yo sika
mpe akosunga yo na kimobange na yo,
pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo
mpe azali na motuya na miso na yo
koleka bana mibali sambo,
aboteli yo mwana mobali. »