22 Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba. 23 Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala 24 mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.