Pular para o conteúdo
Publicidade

Tito 2

3 Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu, 4 mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, 5 komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.

Veja também

Tito
Ver todos os capítulos de Tito