A fé vem pelo ouvir
A fé vem pelo ouvir, e o ouvir pela Palavra de Cristo. Quando a Palavra é proclamada, a fé nasce nos corações. Ouvir a Deus é o primeiro passo para crer e seguir.
A fé vem pelo ouvir
A fé vem pelo ouvir, e o ouvir pela Palavra de Cristo. Quem ouve a Palavra crê e obtém a salvação eterna.
Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye. Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ? Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »
Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? » Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
Nalingi kotuna bino motuna moko kaka : « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ? »
Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo,
Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ;
mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki
mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe
lokola ndanga ya libula na biso
kino basikolami na Ye bakangolama
mpo na kosanzola nkembo na Ye.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;
Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai. Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko,
Ouvir e obedecer
Felizes os que ouvem a Palavra de Deus e a praticam. Quem tem ouvidos ouça o que o Espírito diz.
Yesu azongisaki :
— Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !
Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
Alobaki na bango :
— Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.
Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami :
« Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;
miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;
bakangi penza matoyi mpe miso na bango,
noki te miso na bango emona,
matoyi na bango eyoka,
mitema na bango esosola,
mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.
Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango :
— Boyoka mpe bososola makambo oyo :
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai,
boyoka mpe bokozala na bomoi ;
nakosala boyokani ya libela elongo na bino,
boyokani oyo nalakaki Davidi,
na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
Yawe alobaki na ngai :
— Kende koloba na bato oyo :
« Boyoka na bino, kasi bokososola te ;
botala na bino, kasi bokomona te !
Komisa bato oyo mitema makasi,
kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango
mpo ete bamona te na miso na bango,
bayoka te na matoyi na bango,
basosola te na mitema na bango,
babongwana te mpe babika te ! »
Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.