Publicidade

Habacuque 1

Loyembo ya liboso ya mawa

1 Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli :

2 Oh Yawe, kino tango nini

nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga,

kasi ozali koyoka te ?

Nazali koganga epai na Yo : « Minyoko eleki ! »

kasi ozali kaka kobikisa te !

3 Mpo na nini ozali kolakisa ngai

makambo mabe ya boye ?

Mpo na nini ozali kosala eloko moko te ?

Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi

mpe makambo mabe,

bato bazali kaka koswana mpe kofundana.

4 Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te,

bazali kokata lisusu makambo na bosembo te.

Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo,

makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.

Eyano ya Yawe

5 Botala nanu malamu bikolo mosusu

mpe bokokamwa penza,

pamba te nakosala likambo moko na tango na bino,

likambo oyo bokondima te

soki bayebisi bino yango.

6 Nakotindela bino bato ya Babiloni,

bato ya mitema mabe,

oyo bayokelaka bato mawa te :

batambolaka mokili mobimba

mpo na kobotola bato bisika na bango

ya losambo na makasi.

7 Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka,

basalaka makambo nyonso

oyo bazali na yango posa,

mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.

8 Bampunda na bango ekimaka mbangu

koleka ata nkoyi,

ezalaka na kanda makasi

koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa

mpo na koluka nyama ya kolia.

Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda

batambolaka mbangu makasi

mpe bawutaka mosika penza,

bapumbwaka lokola mpongo

soki ezali kokita na elulu

mpo na kokanga nyama ya kolia.

9 Bango nyonso bayaka nzela moko

mpo na kotia mobulu,

bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este,

bazwaka bakangami ebele

ndenge balokotaka mbuma ya zelo.

10 Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi,

basekaka bingumba batonga makasi,

batondisaka mabele pembeni ya bamir

mpo ete bamata likolo na yango

mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango,

11 balekaka lokola mopepe

mpe bakobaka nzela na bango,

basepelaka kosala mabe,

mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.

Loyembo ya mibale ya mawa

12 Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ?

Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai,

okufaka te.

Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ;

mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango

mpo na kopesa biso etumbu.

13 Miso na Yo ezali peto koleka,

okoki kotala mabe te.

Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ?

Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ?

Mpo na nini ovandi kimia

wana bato mabe bazali konyokola

bato oyo baleki bango na bosembo ?

14 Okomisi bato lokola bambisi ya ebale,

lokola banyama oyo etambolaka na libumu

mpe ezanga mokonzi.

15 Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo,

akangaka yango na monyama

mpe atiaka yango na kitunga.

Yango wana asepelaka

mpe atondaka na esengo.

16 Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka,

atumbelaka kitunga na ye ansa ;

pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye,

azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.

17 Boni, akosepela solo kotika

ete monyama na ye ezanga mbisi

na kokoba koboma bato na mawa te ?

Veja também

Publicidade
Habacuque
Ver todos os capítulos de Habacuque
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-