Publicidade

Naum 3

Engumba ya babomi ebebisami

1 Mawa na engumba oyo mosala na yango

kosopa makila ya bato,

engumba oyo etonda

na makambo ya lokuta mpe na moyibi,

engumba oyo ezangaka te koboma bato !

2 Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu,

makelele ya bapine :

bampunda ezali kopumbwa,

mpe bashar ezali koningana.

3 Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda

bazali kotambola-tambola,

mipanga ezali kongenga,

makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali !

Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza !

Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso,

mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe

tango bazali kotambola.

4 Makambo oyo nyonso esalemi

likolo ya makambo ya nkele ya engumba

oyo etonda na kindumba,

engumba ya kitoko makasi

kasi etonda na misala ya soloka,

engumba oyo epengwisaka bikolo

na nzela ya kindumba na yango

mpe epengwisaka bato

na nzela ya misala na yango ya soloka.

5 « Natombokeli yo, »

elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;

« nakotombola yo elamba kino na elongi,

nakolakisa bolumbu na yo

na miso ya bikolo mosusu

mpe nakoyokisa yo soni

na miso ya bamboka nyonso.

6 Nakobwakela yo bosoto,

nakosambwisa yo

mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.

7 Bato nyonso oyo bakomona yo

bakokima mpe bakoganga :

‹ Engumba Ninive ebebisami boye !

Nani akoyokela yango mawa ? › »

8 Boni, okanisi ete ozali kitoko

koleka engumba Tebesi

oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili

mpe ezingelama na mayi,

bongo ebale ebatelaka yango

mpe mayi ezalaka lokola mir

oyo ebombaka yango ?

9 Makasi na yango ezalaki kowuta

na Kushi mpe na Ejipito ;

bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.

10 Nzokande, yango mpe ekweyaki,

mpe bamemaki bato na yango na bowumbu.

Bakataki-kataki na biteni

bana na bango na babalabala nyonso,

babetaki zeke mpo na kopona

bato na yango ya lokumu

mpo ete bamema bango na bowumbu,

mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.

11 Yo mpe okokoma lokola moto

oyo alangwe masanga,

yo mpe okoluka ekimelo

mpo na kokima banguna na yo.

12 Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi

ezali lokola banzete ya figi etonda

na bambuma ya liboso ekomela ;

soki kaka bameki koningisa yango,

bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.

13 Tala malamu mampinga na yo,

balemba lokola basi ;

bikuke ya mokili na yo ezali polele

liboso ya banguna na yo,

pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.

14 Bino bato ya engumba oyo,

bomitokela libela mayi

mpo ete bakozingela bino ;

bolendisa libela bamir

oyo ebatelaka engumba na bino ;

bokamata mabele oyo batongelaka bandako,

bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto,

bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.

15 Kuna nde moto ekoya kozikisa yo,

mopanga ekoya koboma yo

mpe kosilisa yo lokola mabanki.

Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki,

bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.

16 Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo

ebele koleka ata minzoto ya likolo,

kasi babebisi mokili nyonso

mpe bapumbwe na bango

ndenge kaka mankoko esalaka.

17 Bakengeli na yo bazali lokola mankoko,

bakonzi ya basoda na yo bazali

lokola maboke ya mabanki

oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango

na tango ya malili ;

kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani,

mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.

18 Oh mokonzi ya Asiri,

bakambi na yo bazali kolala pongi,

basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi,

mampinga na yo bapalangani na bangomba

mpe moto akosangisa bango azali komonana te.

19 Ezali ata na kisi moko te

oyo ekoki kobikisa pota na yo ;

pota na yo ezali monene makasi !

Moto nyonso oyo akoyoka sango

ya makambo oyo ekomeli yo

akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo.

Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?

Veja também

Publicidade
Naum
Ver todos os capítulos de Naum
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-