Publicidade

Naum 2

1 Botala kuna na bangomba

makolo ya momemi sango malamu :

amemi sango ya kimia !

Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo

mpe kokisa ndayi na yo ;

pamba te wuta sik’oyo,

moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo ;

pamba te bango nyonso bakobebisama nye.

2 Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe !

Batela malamu bandako na yo batonga makasi,

kengela nzela na yo,

bongama mpo na bitumba

mpe sangisa bato na yo.

3 Yawe akozongisa lisusu nkembo

ya Jakobi mpe ya Isalaele,

atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango,

mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.

4 Banguba mpe bilamba ya basoda na bango

ezali ya langi ya motane ;

bibende ya bashar na bango ezali kongenga

na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba,

mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.

5 Bashar ezali kokota na elulu na nzela,

ezali kokende mpe kozonga

na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;

ezali komonana lokola koni

oyo ezali kopela moto,

ezali kotambola na bangambo nyonso

lokola mikalikali.

6 Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko.

nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa,

bazali kokende na lombangu pene ya mir.

7 Bikuke ya ebale efungwami,

mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.

8 Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu

mpe bakomema yango mosika penza ;

basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga

mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.

9 Na kala, engumba Ninive ezalaki

lokola liziba ya mayi.

Kasi tala yango lelo oyo :

etoboki mpe ekomi kobimisa mayi !

Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! »

Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.

10 Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi,

pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka

mpe etonda na biloko ya motuya.

11 Bakoteli yango, bapanzi yango,

babotoli na makasi biloko na yango ya talo !

Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga,

mpe banzoto etondi na somo.

12 Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi

ezalaki kobokola bana na yango ?

Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi

elongo na bana na yango

ezalaki kotambola na somo ata moke te ?

13 Nkosi ebomi banyama ebele

mpo ete epesa yango lokola bilei

epai ya bana na yango,

ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango,

bongo etondisi libulu na yango na banyama

oyo ebomi mpe na misuni.

14 « Nakotombokela yo, »

elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;

« nakozikisa bashar na yo na moto,

mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo.

Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ;

boye mongongo ya batindami na yo

ekotikala koyokana lisusu te. »

Veja também

Publicidade
Naum
Ver todos os capítulos de Naum
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-