A última palavra vem do Senhor
A última palavra pertence ao Senhor. Os planos do homem estão sujeitos à soberania de Deus. Ele rege toda a história e nenhum de seus propósitos pode ser frustrado.
Motema ya moto esalaka mabongisi,
kasi eyano ewutaka epai na Yawe.
Yawe asalaka makambo nyonso na tina,
ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
Nzambe azali moto te mpo ete akosa,
azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye.
Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ?
Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?
Yawe alobaki na Moyize :
— Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.
ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka :
ezongaka pamba te epai na Ngai,
soki esali nanu te mokano na Ngai,
mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
« Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ?
« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ;
eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.
Yawe asalaka nyonso oyo alingi,
kuna na likolo mpe awa na mabele,
kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
Yesu azali liboso na nyonso,
mpe nyonso esimbama kati na Ye ;
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Makambo wana nyonso ezali koya ! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki.
Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ? Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »