Publicidade

Admiração

Por Bíblia Online

O temor do Senhor é o princípio da sabedoria. A admiração reverente por Deus é a postura que produz conhecimento, obediência e bênção na vida do crente.

Fungola ya bwanya

Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;

bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ;

komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu

koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.

Kotosa Yawe ezali koyina mabe.

Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu

mpe monoko ya lokuta.

Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka

bozwi, lokumu mpe bomoi.

Tika ete omimonaka te moto ya bwanya

na miso na yo moko ;

tosa Yawe mpe longwa na mabe.

Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono

mpe kolendisa mikuwa na yo.

Bonzenga ya elongi ekosaka,

mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ;

kasi mwasi oyo atosaka Yawe,

ye nde abongi na lokumu.

Yoka suka ya mateya nyonso :

Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye,

pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

bato nyonso oyo batosaka Yawe

bazali na mayele ya peto.

Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Bolamu ya bayengebene

Bokumisa Yawe !

Esengo na moto oyo atosaka Yawe

mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.

Tika ete Yawe apambola yo

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Esengo na moto oyo atosaka Yawe

mpe alandaka banzela na Ye !

Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye,

ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,

Mabele eboti bambuma na yango ;

tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.

Yawe asengaki na Isalaele botosi

Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko.

bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.

Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.

Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.

Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.

Moto nyonso oyo azali na pasi

asengeli na mawa ya baninga na ye,

ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-