Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 67

Tika ete bikolo nyonso ekumisa Nzambe

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo.

2 Tika ete Nzambe asalela biso ngolu

mpe apambola biso,

tika ete angengisela biso elongi na Ye ;

3 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,

mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.

4 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;

tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

5 Tika ete bato basepela,

tika ete babeta milolo ya esengo,

pamba te okambaka bikolo na bosembo,

mpe otambolisaka bato awa na mabele.

6 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;

tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

7 Mabele eboti bambuma na yango ;

tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.

8 Tika ete Nzambe apambola biso ;

tika ete mokili mobimba etosa Ye !

Veja também