Publicidade

Salmos 106

Soki tozangi boyengebene, Nzambe azali kaka Moyengebene

1 Bokumisa Yawe !

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

2 Nani akoloba misala minene ya Yawe ?

Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso ?

3 Esengo na bato oyo babatelaka mibeko

mpe batambolaka na bosembo !

4 Yawe, kanisa ngai

tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo !

Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,

5 mpo ete namona esengo ya baponami na Yo,

nasepela na bolamu ya ekolo na Yo

mpe nasepela elongo na libula na Yo !

6 Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso,

tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.

7 Tango batata na biso bazalaki na Ejipito,

basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ;

babosanaki noki misala malamu na Yo,

batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.

8 Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye,

mpo na kotalisa nguya na Ye.

9 Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki ;

atambolisaki bango kati na mozindo

lokola na esobe.

10 Abikisaki bango

wuta na maboko ya bayini na bango,

akangolaki bango

wuta na maboko ya monguna.

11 Mayi ezipaki banguna na bango,

moko te atikalaki na bomoi.

12 Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye

mpe bayembaki masanzoli na Ye.

13 Kasi babosanaki noki misala na Ye,

bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.

14 Kati na esobe, bamipesaki na bilulela,

bamekaki Nzambe kati na mabele

oyo ezali na bato te.

15 Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga,

kasi atindelaki bango lisusu pasi.

16 Kati na molako, basalaki zuwa,

batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.

17 Mabele efungwamaki mpe emelaki Datani,

ezipaki lisanga ya Abirami.

18 Moto ezikisaki lisanga na bango

mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.

19 Na Orebi, basalaki mwana ngombe,

bafukamelaki nzambe ya ekeko basala na ebende

oyo banyangwisa na moto.

20 Babongolaki Nzambe na bango ya nkembo

elilingi ya ngombe oyo eliaka matiti.

21 Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango,

oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,

22 bikamwa kati na mokili ya Cham

mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.

23 Azwaki mokano ya koboma bango nyonso.

Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye

mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.

24 Batiolaki mboka kitoko

mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.

25 Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo,

batosaki mongongo ya Yawe te.

26 Asembolaki loboko, alapaki ndayi

ya koboma bango kati na esobe,

27 ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu

mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.

28 Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori,

baliaki bambeka oyo epesamaki

epai ya banzambe oyo ekufa.

29 Batumbolaki kanda ya Yawe

na nzela ya misala na bango ya mabe,

mpe pasi makasi ekotaki kati na bongo.

30 Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo,

mpe pasi yango esilaki.

31 Mpo na yango, Pineasi atangamaki

lokola moto ya sembo

mpo na bikeke nyonso, seko na seko.

32 Bapesaki Nzambe kanda pene ya mayi ya Meriba

mpe bamemisaki Moyize ngambo.

33 Mpo ete batombokelaki Molimo ya Nzambe,

Moyize akomaki koloba maloba oyo esengeli te.

34 Babebisaki te bikolo

oyo Yawe ayebisaki bango,

35 kasi basanganaki elongo na bapagano

mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.

36 Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko

oyo ekomaki motambo mpo na bango.

37 Bapesaki bana na bango lokola bambeka

epai ya milimo mabe.

38 Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te,

makila ya bana na bango,

oyo bapesaki lokola mbeka

epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana.

Boye mboka ekomaki mbindo

mpo na makila ya bato.

39 Bamikomisaki mbindo

mpe babebisaki lokumu na bango

na nzela ya misala na bango.

40 Yawe asilikelaki bato na Ye,

ayinaki libula na Ye.

41 Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya,

mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango ;

42 banguna na bango banyokolaki bango

mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.

43 Akangolaki bango bambala ebele,

kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka

mpe ya komipesa na bambeba na bango.

44 Yawe amonaki pasi na bango,

tango ayokaki koganga na bango.

45 Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ;

mpe mpo na bolingo monene na Ye,

abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.

46 Asalaki ete bato nyonso

oyo bakomisaki bango bawumbu

bayokela bango mawa.

47 Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso !

Sangisa biso wuta na bikolo mosusu

mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule

mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo.

48 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele,

apambolama seko na seko !

Tika ete bato nyonso baloba :

« Amen ! »

Bokumisa Yawe !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-