Publicidade

Salmos 150

Bokumisa Yawe na mindule

1 Bokumisa Yawe !

Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,

bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene

epai wapi avandi na nguya makasi !

2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !

Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !

3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;

bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !

4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !

Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !

5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !

Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !

Bokumisa Yawe !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-