Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 52

Suka ya mozwi oyo anyokolaka bato

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.

3 Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa

na tina na mabe ?

Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.

4 Yo oyo otambolaka na lokuta,

lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi,

ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.

5 Olingaka mabe koleka bolamu,

lokuta koleka koloba bosolo.

6 Oh lolemo ya lokuta,

olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.

7 Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela,

akokanga yo kati na ndako na yo,

akobwaka yo libanda

mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.

8 Bato ya sembo bakomona

mpe bakokoma na somo,

bakotiola ye na maloba oyo :

9 « Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe

lokola ebombamelo na ye,

azalaki kotiela bozwi na ye motema,

mpe kobakisa makasi na ye

na nzela ya kobebisa bato mosusu. »

10 Kasi ngai, kati na Ndako na Yo,

nazali lokola nzete ya olive

oyo etondi na makasa ya mobesu ;

natiaka tango nyonso elikya na ngai

kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.

11 Nakosanzola Yo mikolo nyonso,

mpo na oyo osali ;

mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo,

pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.