Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 123

Wana tozali kozela ngolu na Ye

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe,

oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.

2 Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango,

mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi,

ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala

Yawe, Nzambe na biso,

kino asalela biso ngolu.

3 Yawe, salela biso ngolu,

yokela biso mawa !

Pamba te tolembi kotiolama !

4 Tolembi penza kotiolama

na bato ya lolendo mpe ya lofundu !

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também