Publicidade

Salmos 111

Mosali makambo ya kokamwa

1 Bokumisa Yawe !

Nakokumisa Yawe

na motema na ngai mobimba

kati na likita ya bato ya sembo

mpe kati na mayangani.

2 Yawe asalaka makambo minene ;

bato nyonso oyo balingaka yango

bakanisaka yango.

3 Misala na Ye emonisaka

nkembo mpe lokumu na Ye,

mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.

4 Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye.

Yawe atondi na mawa

mpe atalisaka ngolu na Ye.

5 Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei ;

akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.

6 Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye

na nzela ya misala na Ye

tango apesaki bango libula

ya bato ya bikolo mosusu.

7 Misala na Ye nyonso elakisaka

boyengebene mpe bosembo na Ye ;

mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.

8 Epesama mpo na libela,

mpe esengeli kotosa yango

na bosembo mpe na bosolo.

9 Akangolaki bato na Ye,

mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango.

Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.

10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

bato nyonso oyo batosaka Yawe

bazali na mayele ya peto.

Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_06-50-08-